Obrigado - Koffi Olomide

Obrigado - Koffi Olomide

Альбом
Haut de gamme / Koweït, rive gauche
Год
1991
Язык
`Lie`
Длительность
404240

Nedan finns texten till låten Obrigado , artist - Koffi Olomide med översättning

Låttexten " Obrigado "

Originaltext med översättning

Obrigado

Koffi Olomide

Ah la vie, pasi eh

Didace Mpembe, Léon Kabasele

Vraiment Luxen bozotala azosala nga boye

Mawa na nga Bouboul Iyondela

Disculpa

Yoka ngaï moto oyo kokaka kolinga te

Yoka ya nga maloba

Tobandaka na lisolo

Tosuka ata na lisapo

Luxen se po bayebisaki yo

Nga naza ndunda oyo baliyaka te

Obwaka nga na lifulu pamba pamba munu

Ebongaki te olanda

(maloba na bango Musengi Luxen)

Oy’a lelo pasi eleki mingi

Matoyi eboyi koyoka, miso eboyi komona

Pinzoli eboyi mpe kotanga

Yahweh

Nasala nini luxen

Naza kokufa po nalingi

Moninga moto

Po nini nzube etonda bebo na nzela oyo ya paradiso

Paradiso

Lakisa ndenge nasala po natika kokanisaka yo

P’oniokolo nzoto pamba

Bolingo oyo nakumbela yo

Soki ezalaki moto mbele ebandi kobima suki ya pembe

Esila nanu te ezali se na motema na nga

Ezali se kopela

Lokola mira kombo volcan

Luxen epay’ozali yeba awa moto aweï

Sambela nga moto ya nzambe

Souci ekosila te etondi na motema meke

Ekangami na moto

Tinge

Nazuwa wapi, nga nazuwa wapi

Nazuwa wapi oyo ya ngayi chérie

Luxen nalinga

Alinga nga te ooo

Luxen nalinga

Bapekisi ye alinga nga

Mawa na nga, mawa na nga

Limbisa ya nga motema soki emipesa se na yo

Bolingo ezuwa mowumbu, nga nasala nini

Sambala nga Luxen po nabika mowumbu

Limbisa ya nga motema soki emipesa se yo

Limbisa ya nga miso soki epusa kolula yo

Musengi basala yo charme, nga nalula nani

Sambela nga Luxen po nabika mowumbu

(Limbisa ya nga miso soki epusa kolula yo)

Baye basenginyaki yo, yebisa bango Obrigado

Faute nyonso se na Nzambe

Tokosamba ata ndele

Mokili ezali se bongo

(Baye basenginyaki yo, pesa bango merci mingi)

Limbisa ya nga motema soki epusa kolinga yo

Bolingo etiya nga boloko, nga nasala nini

Sambela luxen po nabika mowumbu

Nazuwa wapi, nga nazuwa wapi

Nazuwa wapi oyo ya ngayi chérie

Luxen nalinga

Alinga nga te ooo

Luxen nalinga

Bapekisi ye alinga nga

Mawa na nga, mawa na nga

Modogo naleli, Gabin ya Tembo, Chirac Makayabu

Nalela Bouboul

Sebène…

2+ miljoner sångtexter

Låtar på olika språk

Översättningar

Högkvalitativa översättningar till alla språk

Snabbsökning

Hitta texterna du behöver på några sekunder